Revelation of John 18

Liloba ya misato : kokweya ya babilona

1Na sima ya makambo wana, namonaki anzelu mosusu awutaki na Likolompe ayaki kokita. Azalaki na nguya monene, mpe nkembo na yeengengisaki mokili. 2Agangaki na mongongo makasi : Vile monene ya Babilona ekwei, ekwei.
Ekomi mboka ya bazabolo,
ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo
mpe ebombamelo ya bandeke ya mbindo mpe oyo eboyama.

3 Pamba te bikolo nyonso emelaki vino
ya kanda ya kindumba na yango.
Bakonzi minene ya mabele basalaki ekobo elongo na vile yango,
mpe bato ya mombongo ya mabele bakomaki na bomengo mingi
wuta na bomengo na yango oyo eleki ndeko.

Liloba ya minei : vile monene ebebisami

4Bongo nayokaki mongongo mosusu ewutaki na Likolo, elobaki :

—Bino bato na ngai, bobima na kati ya vile wana, mpo ete bosangana na masumu na yango te, mpe bozwa bapasi na yango te.
5Pamba te masumu na yango etondi mingi kino na Likolo. Mpe Nzambe akanisi mabe na yango. 6Bosalela yango ndenge yango esalaki bino. Makambo oyo esalaki, bofuta ye yango mbala mibale. Kopo oyo esangisaki mpo na bino, masanga ya ngai oyo emelisaka, bomelisa ye yango mbala mibale. 7Boyokisa yango pasi mpe mawa, ndenge yango ezalaki komikumisa mpe emitondisaki na bomengo. Pamba te ezali koloba : “Navandi lokola mokonzi monene ya mwasi ; nakufela mobali te, mpe nakosala matanga ata mokolo moko te.”

8Yango wana, bapasi na yango ekokweyela yango na mokolo moko : liwa, matanga, nzala, mpe bakotumba yango na moto. Pamba te Nkolo Nzambe oyo apesi yango etumbu, azali na nguya mingi.

9Bongo bakonzi ya mokili, baoyo basalaki na yango ekobo mpe basanganaki na bisengo na yango, bakomona pasi mpe bakolela mpo na vile wana, tango bakomona milinga ya moto oyo ekozikisa yango. 10Bakotelema mosika mpo na kobanga pasi oyo ekokweyela vile yango. Bongo bakoloba : “Mawa ! Mawa ! Vile monene, Babilona vile ya nguya ! Pamba te kobeba na yango eye kaka na ngonga moko !”

11Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga mpo na vile yango, pamba te moto ata moko te akosomba lisusu biloko na bango : 12wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya pete-pete, bilamba ya motane ya pete-pete, bilamba ya swa, bilamba ya motanemakasi, banzete nyonso ya solo kitoko, biloko ya ndengena ndenge oyo esalami na pembe ya nzoku, biloko ya ndenge na ndengeoyo esalami na banzete ya talo mpe na bibende lokola “Bronze”, “Fer”, mpe na mabanga ya kitoko oyo babengaka “Marbre” ; 13biloko basangisaka na bilei mpo na koyeisa yango elengi, malasi, mire, banzete ya solo kitoko oyo batumbaka, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, shario, bawumbu, mpe milimo ya batu.

14—Bakoloba : “biloko nyonso oyo ozalaki kolinga mingi etiki yo mosika ; bomengo mpe biloko ya kitoko nyonso ebebi, okozwa yango lisusu te !”

15Bato ya mombongo oyo bazwaki bomengo tango bazalaki kotekisa biloko na bango na vile wana, bakotelema mosika mpo na kobanga pasi oyo ekokweyila vile yango. Bakolela, bakosala matanga 16mpe bakoloba :

—Mawa ! Mawa ! Vile monene, ezalaki kolata bilamba ya lino ya pete-pete, bilamba ya motane ya makasi, babizu ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka !
17Kasi tala, na ngonga moko kaka, bomengo wana nyonso ebebi.

Bakapiteni nyonso ya masuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na masuwa, bato oyo basalaka na masuwa, mpe baoyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, batelemaki na mosika.
18Tango bamonaki milinga ya kozika na yango, bagangaki :

—Vile nini ekokani na vile monene ?

19Bongo, bazalaki kobwaka putulu na mitu na bango, bazalaki kolelampe komitungisa, mpe koganga na mongongo makasi :

—Mawa ! Mawa ! Vile monene ! Pamba te bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na ebale bakomaki bato ya bomengo mpo na bomengo ya vile yango. Kasi tala, na ngonga moko kaka, yango nyonso ebebi.

20Likolo, sepela mpo na vile yango ! Bino basantu, Bapostolo mpe baprofeta, bosepela mpe ! Pamba te, Nzambe alongisi binoawa akateli vile yango etumbu.

Liloba ya mitano : vile monene emonani lisusu te

21Bongo anzelu moko ya nguya akamataki libanga moko ezalaki lokola oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki :

—Vile monene ya Babilona, bakobwaka yango ndenge wana na makasinyonso, mpe ekomonana lisusu te.

22Miziki ya babeti lindanda mpe ya bayembi, ya babeti piololo mpe kelelo, ekoyokana lisusu te kati na yo. Bato oyo basalaka misala ya maboko ya ndenge na ndenge, bakomonana lisusu te epai na yo ; makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble, ekoyokana lisusu te epai na yo. 23Mwinda ekopela lisusu te epai na yo, mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana ekoyokana lisusu te epai na yo, pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato minene ya mokili ; mpe okosaki bato ya bikolo nyonso na mazi na yo. 24Kati na yo, bakutaki makila ya baprofeta, ya basantu, mpe ya bato nyonso oyo babomaki na mokili.
Copyright information for LinMNB